BOKUSE YA NTINA MPO NA MUSULMAN YA SIKA
Kobongisa
Mohamed El-Shahry
Na kombo ya Allah Nzambe, wa boboto atonda ngolu
Maloba ya ebandeli
Masanzoli ezala ya Nzambe, tosanzoli (tokumisi) Ye, na tolukaka lisalisi na bolimbisi na ye, mpe tolukaka ekimelo epai ya Nzambe na mabe ya bisomei, ewutaka na misala mabe ya misala na biso.Oyo Nzambe azali kokamba ye, moto oyo akoki kobungisa ye ezali te, mpe oyo azali kobungisa nzela, moto oyo akokamba ye azali te,Nazali kotatola ete nzambe mosusu azali te longola se Allah ye moko, na molongani te, mpe nazali kotatola ete Muhammad azali mosali mpe Ntoma naye.
Mpo na oyo elandi:
Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso akumisaki bana ya Adama mpe apesaka bango boboto koleka ebele ya bikelamu na Ye Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso alobi ete:﴿وَلَقَدْ كَرَّمْنَا بَنِي آدَمَ﴾ {Mpe Tokumisi mpenza bana ya Adama}.[Surat Al-Isra: 70].Mpe abakisaka lokumu na ye mpo na ekolo oyo, na kotinda epai na bango mosakoli na ye ya malamu, Muhammad - Nzambe apambola ye mpe apesa ye kimia, na amonisaki bango buku na ye ya malamu, (Al Qur'an Esantu), mpe andimelaki bango lingomba munene ya Islam etia, mibeko. Nzambe alobi:﴿كُنْتُمْ خَيْرَ أُمَّةٍ أُخْرِجَتْ لِلنَّاسِ تَأْمُرُونَ بِالْمَعْرُوفِ وَتَنْهَوْنَ عَنِ الْمُنْكَرِ وَتُؤْمِنُونَ بِاللَّهِ وَلَوْ آمَنَ أَهْلُ الْكِتَابِ لَكَانَ خَيْرًا لَهُمْ مِنْهُمُ الْمُؤْمِنُونَ وَأَكْثَرُهُمُ الْفَاسِقُونَ﴾ {Bozali Nation ya malamu koleka, bo zolakisa oyo ezali malamu mpe bo zopekisa oyo ezali mabe, mpe bondimi Nzambe, N'a soki Bato ya Buku bandimaka, elingaki kozala malamu mpo na bango, Basusu kati na bango bazali bandimi, kasi mingi kati na bango bazali bato oyo bazangi botosi}.[Surat Al Imran: 110].Moko ya mapamboli minene ya Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso likolo ya moto ezali ete apesaki ye bokambi na Islam, bokasi kati na yango, mpe kosalela mibeko, nakati ya buku oyo ya moke kasi monene na makambo, mobongwami ya sika ayekolaka oyo ye akoki kozala na boyebi te, Abanda Islam na ye na ndenge ya mokuse oyo ezali kolimbola ye makambo ya lingomba monene oyo, na boye ete ntango asosolaki yango mpe asalaki engebene na yango, abandaki koluka boyebi mpe kozwa mingi na yango mpo na abakisa boyebi na ye ya Nkolo na ye Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, Na ntoma na ye Muhammad - Nzambe apambola ye mpe apesa ye kimia - mpe ayeba lingomba na ye, Islam. Asambelaka Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso na bososoli mpe na boyebi, mpe motema Naye ezala nakimia, mpe kondima na ye ebakisama penepene na Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso na nzela ya losambo mpe kolanda Sunnah ya Ntoma na ye Muhammad - Nzambe apambola ye mpe apesa ye kimia.
Nasengi Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso apambola liloba nyonso nakati ya buku oyo, apesa litomba na Islam mpe na ba musulmans, asala yango peto mpo na elongi na Ye ya lokumu, mpe apesa mbano (Lifuti) na yango na ba musulmans nionso, na bomoi mpe bakufi.
Tika ete mapamboli mpe kimia ya Nzambe ezala na Ntoma na biso Muhammad mpe libota na ye mpe baninga na ye banso.
Muhammad bin Shaibah A-Shahri
2/11/1441 Hj
nzambe na ngai azali ALLAH
• Nzambe (Allah) alobi:﴿يَا أَيُّهَا النَّاسُ اعْبُدُوا رَبَّكُمُ الَّذِي خَلَقَكُمْ وَالَّذِينَ مِنْ قَبْلِكُمْ لَعَلَّكُمْ تَتَّقُونَ﴾ {Ee bato, bosambela Nkolo na bino oyo akelaka bino na ba oyo bazalaka liboso na bino mpo ete bokoma (ba bangi nzambe}.[Al-Baqarah: 21].
• Nzambe (Allah) alobi:﴿هُوَ اللَّهُ الَّذِي لَا إِلَهَ إِلَّا هُوَ﴾ {Ye azali Allah, nzambe mosusu azali te kaka Ye}.[Al-Hashr: 22].
• Nzambe (Allah) alobi :﴿ لَيْسَ كَمِثْلِهِ شَيْءٌ ۖ وَهُوَ السَّمِيعُ الْبَصِيرُ﴾ “{Eloko moko te ezali lokola Ye , Na Ye azali Moyoki Momoni Nyonso}.[Al-Shura: 11].
• Nzambe azali Nkolo na ngai mpe Nkolo ya biloko nyonso, Nkolo, Mozalisi, Mosungi mpe Mokambi ya biloko nyonso.
• Ye moko nde abongi na losambo, Nkolo mosusu azali te, Na nzambe mosusu azali te longola se Ye Moko kaka Nde nzambe.
• Azali na bankombo ya kitoko mingi mpe bizaleli ya lokumu oyo Ye andimisaka mpo na Ye moko mpe Ntoma na Ye - tika ete Nzambe apambola ye mpe apesa ye kimia - andimisaka mpo na ye akómi na esika ya nsuka na bobongi nie mpe na kitoko Ezali na eloko moko te lokola Ye ezali Moyoki Nyonso mpe Momoni Nyonso.
Kati na bankombo na Ye ya kitoko:
Ar-Razzāq, Ar-Rahmān, Al-Qadīir, Al-Malik, As-Samīu, As-Salāam, Al-Basīir, Al-Wakīil, Al-Khāaliq, Al-LAtwīif, Al-Kāafī, Al-Ghafùr.
Al-Razzaq: Oyo azali kopesa bomoi ya basali, oyo azali kopesa bilei ya mitema mpe nzoto na bango.
Ar-Rahmān : Ye oyo azali na ngolu monene, na mawa oyo ezingi biloko nyonso.
Al-Qadīir :Mozwi-ya-Nguya-Nyonso: Ye oyo azali na nguya na makoki nyonso, Mpe incapacité na bolembu ezuaka ye te.
Al-Malik (Mokonzi): Alimbolami na bizaleli ya bonene, ya konyokola, mpe ya boyangeli Azali nkolo ya biloko nyonso mpe azali na bokonzi likolo na yango.
As-Samīu Moyoki: Eloko nioso ekomelaka ye, ezala ya kobombama to ya polele.
As-Salāam (Kimya) : kimia uta na bozangi, mpasi mpe mbeba nyonso.
Al-Basīir :Ye oyo amonaka nyonso, miso na ye esangisi makambo nyonso, ata soki ezali moke koleka, ye azali na bososoli ya makambo, ayebi yango mpe ayebi makambo oyo ezali na kati.
Al-Wakīil : Ye oyo azali ko garantir vie ya peuple na ye, oyo azali ko soigner ba intérêts na bango, mpe oyo azali kozua charge ya ba gardiens na ye mpe ko faciliter makambo mpo na bango mpe ekoki mpo na bango.
Al-Khāaliq : Mozalisi mpe Mokeli ya biloko kozanga ndakisa moko ya liboso.
Al-LAtwīif : Ye oyo azali kokumisa basali na Ye, ayokelaka bango mawa, mpe apesaka bango masengi na bango.
Al-Kāfī :Oyo akoki basali na ye na nionso oyo basengeli na yango, mpe ye amikoka na lisungi na ye moko , mpe ye azali komikokisa ye moko.
Al-Ghafùr :Molimbisi Ye oyo abatelaka basali na ye na mabe ya masumu na bango, mpe apesaka bango etumbu te mpo na yango.
Musulman azali komanyola na makamwisi ya bokeli ya Nzambe mpe ya facilitation na Ye, mpe yango esangisi bobateli ya bikelamu mpo na bana na bango, kozala na bokebi mpo na koleisa bango mpe kobatela bango kino bakomipesa Nkembo na Ye, Mozalisi na bango mpe na Moto oyo azali na boboto epai na bango, mpe uta na boboto na Ye ezali ete apesi bango oyo ekosalisa bango mpe ekosembola ezalela na bango atako botau na bango nyonso.
Prophète na ngai Muhammad - Nzambe apambola ye pe apesa ye kimia -
Nzambe (Allah) Alobi:﴿لَقَدْ جَاءَكُمْ رَسُولٌ مِنْ أَنْفُسِكُمْ عَزِيزٌ عَلَيْهِ مَا عَنِتُّمْ حَرِيصٌ عَلَيْكُمْ بِالْمُؤْمِنِينَ رَءُوفٌ رَحِيمٌ﴾ {Ya solo, motindami awuti Kati na bino aye mpona bino na Ntina ya mbasi ya kilo makasi bozalaki na yango azali koyokela bino mawa mpe kotala bino, azalaki na bolingo mpe ngolu epai ya ba ndimi}[A-Tawbah: 128].
Nzambe (Allah) Alobi:﴿وَمَا أَرْسَلْنَاكَ إِلا رَحْمَةً لِلْعَالَمِينَ﴾ {(Mohammed) “Totindakayo te Kaka ozala ngolu rahmat pona mokili}.[Al-Anbiya’: 107]
Muhammad - Nzambe apambola ye pe apesa ye kimia - ngolu ya kotambwisa
Azali Muhammad bin Abdullah - Nzambe apambola ye mpe apesa ye kimia - elembo ya basakoli mpe bamemi-nsango Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso atindaka ye na lingomba ya Islam epai ya bato banso, mpo na kotambwisa bango, na bolamu oyo eleki monene ezali bomoko ya Nzambe, mpe mpo na kopekisa bango na mabe, oyo eleki monene ezali polythèisme shirki.
Esengeli kotosa ye na makambo oyo azali kopesa mitindo, kondima makambo oyo azalaka koloba, kokima makambo oyo apekisaka na apamelaka, mpe kosambela Nzambe kaka na oyo apesaka mitindo.
Nsango na ye mpe nsango ya basakoli banso liboso na ye ezali bobengi batu kosambela Nzambe ye moko,Oyo azangi mosangisi.
Kati na bizaleli na ye - Nzambe apambola ye mpe apesa ye kimia - ezali :
Bosembo, mawa, motema kimia, motema molai, mpiko, bokabi, bizaleli malamu, bosembo, komikitisa, bolimbisi.
Coran Esantu ezali liloba ya Nkolo na ngai
Nzambe (Allah) Alobi:﴿ يَا أَيُّهَا النَّاسُ قَدْ جَاءَكُم بُرْهَانٌ مِّن رَّبِّكُمْ وَأَنزَلْنَا إِلَيْكُمْ نُورًا مُّبِينًا﴾ {Ee bato, bilembeteli (Témoignage) biyei epai na bino uta na Nkolo na bino, mpe Tokitisaka epai na bino mwinda ya polele}.[An-Nisa: 174].
Coran Esantu ezali liloba ya Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, oyo emonisami na Ntoma na ye Muhammad - Nzambe apambola ye mpe apesa ye kimia - mpo na kobimisa bato na molili kotiabango na boyebi mpe kotambwisa bango na nzela ya semba.
Oyo akotanga yango akozwa mbano (Lifuti) monene, mpe oyo akosala engebene na litambwisi na ye, akolanda nzela ya sembo.
Nayekolaka na ntina ya makonzí ya Islam
Ntoma - Nzambe apambola ye pe apesa ye kimia - alobi :(Islam etongami na makambo mitano : kopesa litatoli ete nzambe mosusu azali te kaka Allah mpe ete Muhammad azali Ntoma ya Nzambe, kofandisa losambo, kofuta mosolo ya zakat, kokanga Carême ya Ramadan, mpe kosala Hajj na Maka).
Makonzí ya Islam ezali misala ya Adoration oyo ezali obligatoire mpo na musulman nionso, mpe Islam ya mutu ezali valide te soki andimi ete ezali obligatoire te, mpe asali yango nionso te. Lokola Islam etongami likolo na yango, babengaka yango makonzí ya Islam.
Makonzí yango ezali:
Likonzí ya liboso: Litatoli oyo elobi ete nzambe mosusu azali te kaka Allah mpe ete Muhammad azali Motindami ya Nzambe.
Nzambe (Allah) Alobi:﴿فَاعْلَمْ أَنَّهُ لَا إِلَهَ إِلَّا اللَّهُ﴾ {Bongo yeba ete nzambe mosusu azali te Kaka Allah }.[Muhammad: 19].
Nzambe (Allah) alobi :﴿لَقَدْ جَاءكُمْ رَسُولٌ مِّنْ أَنفُسِكُمْ عَزِيزٌ عَلَيْهِ مَا عَنِتُّمْ حَرِيصٌ عَلَيْكُم بِالْمُؤْمِنِينَ رَؤُوفٌ رَّحِيمٌ﴾ {Ya solo, motindami awuti Kati na bino aye mpona bino na Ntina ya mbasi ya kilo makasi bozalaki na yango azali koyokela bino mawa mpe kotala bino, azalaki na bolingo mpe ngolu epai ya ba ndimi}.[A-Tawbah: 128].
Ndimbola Ntina ya litatoli oyo elobi ete nzambe mosusu azali te kaka Allah : Nzambe ya solo azali te Kaka yemeyi.
Ndimbola Ntina ya kotatola ete Muhammad azali Ntoma ya Nzambe : kotosa ye na maye apesa mitindo, kondima oyo alobaka, kokima oyo apekisaka na apamelaka, mpe kosambela Nzambe Kaka na mibeko oyo alakisaka.
Likonzí ya mibale: kotelemisa losambo.
Nzambe (Allah) Alobi:﴿وَأَقِيمُوا الصَّلَاةَ﴾ {Mpe botelemisa losambo}.[Al-Baqarah: 110].
Kotelemisa losambo esalemaka na lolenge oyo Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso atiaka Na atangisaka biso Ntoma na Ye Muhammad - Nzambe apambola ye mpe apesa ye kimia.
Likonzí ya misato: kofuta zakat.
Nzambe (Allah) Alobi:﴿وَآتُوا الزَّكَاةَ﴾ {Mpe bopesa zakat}.[Al-Baqarah: 110].
Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso atie zakat lokola momekano ya bosembo ya kondima ya musulman, lokola matondi na Nkolo na ye mpo na lipamboli ya bomengo oyo apesi ye, mpe lokola lisalisi mpo na babola mpe babola.
Kopesa zakat esalemaka na kopesa yango na baye babongi na yango.
Ezali Na ntina ya obligatoire ya mbongo soki ekomi na motango moko boye, oyo epesami na lolenge mwambe ya bato oyo Nzambe alobeli na Coran Esantu, Nakati nabango babola na bazangi.
Kosala yango ezali na mawa mpe boboto, kopetola bizaleli malamu mpe bomengo ya musulman, kosepelisa milimo ya babola mpe ya bazangi, mpe kolendisa bokangami ya bolingo mpe ya bondeko kati na bato ya lisanga ya ba musulmans Yango wana, musulman malamu asalaka yango na bolamu na kati ye moko mpe asepeli na performance na yango, mpo na esengo oyo ememelaka bato mosusu.
Motango ya zakat na mbongo ezali 2,5% ya mbongo oyo ebombami na wolo, palata, billet, mpe biloko ya mombongo oyo ebongisami mpo na kosomba mpe koteka mpo na kozwa litomba. Soki motuya na yango ekómi na motuya moko boye mpe mbula mobimba eleki.
Zaka ezali mpe obligatoire na moto nyonso oyo azali na motango moko boye ya bibwele (Chameau, bangɔmbɛ, mpe Mouton), soki azali kolya matiti oyo euti na mabele na boumeli ya eteni monene ya mbula kozanga ete nkolo na yango aleisa bango.
Ndenge moko mpe, zakat esengeli kofutama na Oyo ebimi nase yamabele, lokola mbuma, mbuma, mabanga ya ntalo, mpe biloko ya motuya, soki ekomi na motango moko boye.
Likonzí ya minei: kokanga Carême na sanza ya Ramadan.
Nzambe (Allah) Alobi:﴿يَا أَيُّهَا الَّذِينَ آمَنُوا كُتِبَ عَلَيْكُمُ الصِّيَامُ كَمَا كُتِبَ عَلَى الَّذِينَ مِنْ قَبْلِكُمْ لَعَلَّكُمْ تَتَّقُونَ﴾ {Ee Bino baoyo bondimi, epesameli bino motindo yakokanga Carême lokola etiamaka likolo na baoyo bazalaka liboso na bino, mpoete bokoma (Babangi nzambe)}.[Al-Baqarah: 110].
Ramadan ezali: sanza ya (9) ya mbula na calendrier ya Hijri Ezali sanza ya lokumu mpo na ba musulmans, mpe ezali na statut spécial na basanza oyo etikali ya mbula, mpe kokanga yango mobimba na yango ezali moko ya makonzí mitano ya Islam.
Kokanga Carême ya Ramadan ezali: kosambela Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso na koboya bilei, ko mela eloko, kosangisa nzoto, mpe biloko mosusu nyonso oyo ebukaka Carême banda ntongo kino kolala ya moi na mikolo nyonso ya sanza ya Ramadan oyo epambolami.
Likonzí ya mitano: Hajj na Maka Ndako Esantu ya Nzambe.
Nzambe (Allah) Alobi:﴿وَلِلَّهِ عَلَى النَّاسِ حِجُّ الْبَيْتِ مَنِ اسْتَطَاعَ إِلَيْهِ سَبِيلًا﴾ {Mpe Nzambe azali na mokumba ya bato ya kosala Hajj na maka, oyo azali na makoki ya kosala nzela mpo na kokende akende}.[Al Imran: 97].
Hajj ezali mpo na baye bazali na makoki ya kosala yango, mbala moko na bomoi Ezali: kokende na Ndako Esantu mpe bisika ya bopeto na Mecque mpo na kosala misala ya losambo oyo esalemaka kuna na ntango moko boye, na Ntoma, mabondeli mpe kimia ya Nzambe ezala likolo na ye, asalaki Hajj mpe basakoli mosusu liboso na ye basalaki Hajj, mpe Nzambe atindaki Abraham, kimia ezala likolo na ye, asala Hajj Abengi bato mpo na kosala Hajj, lokola Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso ayebisaki biso na Coran Esantu, alobi:﴿وَأَذِّنْ فِي النَّاسِ بِالْحَجِّ يَأْتُوكَ رِجَالًا وَعَلَى كُلِّ ضَامِرٍ يَأْتِينَ مِنْ كُلِّ فَجٍّ عَمِيقٍ﴾ {Mpe sakola Hajj na kati ya bato, bakoya epai na bino na makolo, mpe na bato nyonso oyo bamikitisi, bakouta na lobwaku nyonso ya mozindo}.[Al-Hajj: 27].
Nayekola ntina ya makonzí ya kondima
Prophète - Nzambe apambola ye pe apesa ye kimia - batunaki ye na ntina ya kondima pe alobi :(Kondimela Nzambe, na ba anzelu na Ye, na mikanda na Ye, na bamemi-nsango na Ye, mpe Mokolo ya Nsuka, na kondima destin, bolamu na yango mpe mabe na yango).
Makonzí ya kondima ezali misala ya losambo oyo ezali na mokumba mpo na musulman nyonso, mpe Islam ya moto ezali na ntina te soki andimi yango te, yango wana babengaka yango makonzí ya kondima.Bokeseni kati na yango na makonzí ya Islam ezali ete makonzí ya Islam ezali misala oyo emonanaka oyo moto asalaka na polele , lokola kotatola Shahada, losambo, mpe zakat, mpe makonzí ya kondima ezali misala ya motema oyo moto asalaka kati ya motema na ye, lokola: kondima Nzambe, mikanda (babuku) na Ye, mpe bamemi-nsango na Ye.
Likanisi mpe ndimbola ya kondima: Ezali kondima makasi ya motema na Nzambe, na banzelu na ye, na mikanda na ye, na bamemi-nsango na ye, na Mokolo ya Nsuka, mpe na Destin Oyo ekokimelayo, bolamu na yango mpe na mabe na yango, mpe kolanda nyonso oyo Ntoma - Nzambe apambola ye mpe pesa ye kimia - azalaki kosala yango : maloba yalolemo, lokola koloba nzambe mosusu Azali te kaka Allah, kotanga Coran, Pe kokumisa na kozongisa lomuka epayi ya Nzambe.
Na Misala oyo emonanaka : lokola losambo, Hajj, kokanga Carême... mpe Ezali misala oyo ebombami, oyo etali motema, lokola bolingo ya nzambe mpe kobanga Ye, mpe kotiela Ye Elikia mpe komipesa epai na Ye (Allah).
Bato ya mayele balimbolaka yango na mokuse lokola: kondima na motema, koloba na monoko, mpe kosala misala nango, bondimi ebakisamaka na botosi mpe ekitaka na kozanga botosi.
Likonzí ya liboso: kondima Allah aza nzambi
Nzambe (Allah) Alobi:﴿إِنَّمَا الْمُؤْمِنُونَ الَّذِينَ آمَنُوا بِاللَّهِ﴾ {Bandimi bazali kaka baoyo bandimaka Nzambe}.[Al-Nour: 62].
Kondima Nzambe esengi kondima bomoko na Ye nakati ya bokonzi naye, na Bonzambe naye, na Bankombo naye, mpe Bizaleli naye yalokumu, mpe esangisi makambo oyo elandi:
-Kondima bo zuami ya Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso.
- Kondima bo nkolo na Ye, Nkembo ezala na Ye, mpe ye azali Nkolo, Mozalisi, Mobateli, mpe Mokambi ya makambo nyonso.
- Kondima bonzambe na Ye, Nkembo ezala na Ye, Na abongi na losambo ye moko mpe azali na molongani te, naba adoration naye, moko na yango : lokola losambo, mabondeli, bilaka, mbeka, koluka lisalisi, koluka ekimelo, mpe misala misusu nyonso ya losambo.
- Kondima na ba kombo na ye ya kitoko mingi pe na bizaleli naye yalokomu oyo Ye a confirmaki pona ye moko to oyo Prophète na ye - Nzambe apambola ye pe apesa ye kimia - a confirmaki pona yango, pe kowangana oyo awanganaki pona ye moko to Prophète naye, Aboyaki yango , na bankombo ya nzambe mpe bizaleli Naye, bobongi Naye Pe epetolami,Na ezali na eloko moko te lokola Ye(Allah), mpe Ye azali Moyoki Nyonso, Momoni Nyonso.
Likonzí ya mibale: Kondima ba anzelu
Nzambe (Allah) Alobi:﴿الْحَمْدُ لِلَّهِ فَاطِرِ السَّمَاوَاتِ وَالْأَرْضِ جَاعِلِ الْمَلَائِكَةِ رُسُلًا أُولِي أَجْنِحَةٍ مَثْنَى وَثُلَاثَ وَرُبَاعَ يَزِيدُ فِي الْخَلْقِ مَا يَشَاءُ إِنَّ اللَّهَ عَلَى كُلِّ شَيْءٍ قَدِيرٌ﴾ “{Masanzoli ezala na Nzambe, Mozalisi ya Mapata mpe ya mabele, oyo asalaka ba anzelu lokola bamemi-nsango na mapapu, mibale to misato to minei Abakisaka na bozalisi oyo Ye alingi,Ete Nzambe azali na nguya likolo ya biloko nionso}.[Al-Fatir: 1].
Tondimi ete ba anzelu bazali komonana te, mpe ete bazali basali ya Nzambe, oyo Ye akelaka uta na nour mpe akómisaki batosi mpe batosaka ye.
Bazali ekelamu monene,Pe bokasi n'a motango na bango ezingami na moto mosusu te bobele Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, mpe moko na moko na bango azali na bandimbola, bankombo, mpe misala oyo Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso apesi bango Kati na bango ezali na Gabriel, kimia ezala likolo na ye, oyo apesameli mokumba ya emoniseli oyo Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso atindaki epai ya bamemi-nsango na Ye.
Likonzí ya misato: kondima Ba buku naye
Nzambe (Allah) Alobi:﴿قُولُوا آمَنَّا بِاللَّهِ وَمَا أُنْزِلَ إِلَيْنَا وَمَا أُنْزِلَ إِلَى إِبْرَاهِيمَ وَإِسْمَاعِيلَ وَإِسْحَاقَ وَيَعْقُوبَ وَالْأَسْبَاطِ وَمَا أُوتِيَ مُوسَى وَعِيسَى وَمَا أُوتِيَ النَّبِيُّونَ مِنْ رَبِّهِمْ لَا نُفَرِّقُ بَيْنَ أَحَدٍ مِنْهُمْ وَنَحْنُ لَهُ مُسْلِمُونَ﴾ {Bolobá ete, To ndimeli Nzambe na oyo emonisami epai na biso, mpe oyo emonisamaki epai ya Abraham, mpe Ismaël, Isaac , mpe Jacob, Na mabota, mpe oyo epesamaki na Moïse mpe Jesus, mpe oyo epesamaki Na Mosakoli, kowuta na Nkolo na bango, Tosalaka bokeseni te kati ya moko na bango, pe tozali ba musulmans}.[Al-Baqarah: 136].
Kondima makasi ete mikanda nyonso ya likoló ezali liloba ya Nzambe.
Mpe emonisami uta na Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso epai ya bamemi-nsango na Ye epai ya basaleli na Ye na bosolo ya polele.
Mpe Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, na kotindaka Ntoma na ye Muhammad - Nzambe apambola ye mpe apesa ye kimia -atindamaki epai ya bato banso, alongolaki na mobeko na ye mibeko nyonso ya kala, mpe asaliki Coran Esantu ezala Na bokonzi likolo ya mikanda nyonso, mpe alongolaki yango azwaki bokebi ya kobatela Coran Esantu na mbongwana to babebisi nyonso, mpe Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso alobi:﴿إِنَّا نَحْنُ نَزَّلْنَا الذِّكْرَ وَإِنَّا لَهُ لَحَافِظُونَ﴾ {Ya solo, ezali Biso nde tokitisaki Bokundoli,(Coran) mpe ya solo, Tokozala mobateli na yango}.[Al-Hijr: 9];Pamba te Coran Esantu ezali buku ya suka ya Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso epai ya bato, mpe Ntoma na ye Muhammad - Nzambe apambola ye mpe apesa ye kimia - azali ya nsuka kati na bamemi-nsango, mpe lingomba ya Islam ezali lingomba oyo Nzambe andimili bato, tii na Mokolo ya Kosambisama. Allah alobi boye:﴿إِنَّ الدِّينَ عِنْدَ اللَّهِ الْإِسْلَامُ﴾ ({Lingomba oyo Ezuami epayi ya Allah ezali Islam}.[Al Imran: 19].
Mikanda ya Likolo oyo Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso alobeli na buku na Ye ezali:
Coran Esantu: Nzambe akitisaka yango epayi ya Prophète na ye Muhammad - Nzambe apambola ye pe apesa ye kimia.
Torahti: Nzambe atindaki yango epayi ya Prophète na ye Moïse, kimia ezala likolo na ye.
L'Évangile: Nzambe abimisi yango na Profeta naye Issa (Jesus), kimia ezala likolo na ye.
Zaburi (Psaumes): Nzambe abimisi yango na Profeta na ye David, kimia ezala likolo na ye.
Mikanda ya Abraham: Nzambe atindaka yango epayi ya Prophète na ye Abraham, kimia ezala likolo na ye.
Likonzí ya minei: Kondima na Bamemi-nsango
Nzambe (Allah) Alobi:﴿وَلَقَدْ بَعَثْنَا فِي كُلِّ أُمَّةٍ رَّسُولاً أَنِ اعْبُدُواْ اللّهَ وَاجْتَنِبُواْ الطَّاغُوتَ﴾ {Mpe Totindi mpenza momemi-nsango kati na bikólo nyonso, alobi ete: ‘Bósambela Nzambe mpe bómitia musika na tuaruti}.[An-Nahl: 36].
Kondima makasi ete Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso atindi na ekolo nyonso momemi-nsango kobenga bango mpo na kosambela Nzambe ye moko,Oyo zali namosangisi te, mpe kozanga kondima binzambi nzambi Oyo basambelaka bango sima ya nzambe , Mozwi-ya-Nguya-Nyonso.
Mpe ete bango nyonso bazali bato, bato oyo bazali basali ya Nzambe, mpe ete bazali bato ya solo, ya kotyela motema, ya kobanga Nzambe mpe ya kotyela motema, kotambwisama mpe kotambwisama Nzambe asungaki bango na makamwisi oyo elakisaki bosembo na bango, mpe ete bazwaki nyonso oyo Nzambe atindaki bango na yango , mpe ete bango nyonso bazalaki likolo ya bosolo ya polele mpe bokambi ya polele.
Bobengi (invitation) na bango uta ebandeli kino nsuka eyokanaka na ntina ya ebandeli ya lingomba, oyo ezali kotia bomoko ya Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso na losambo Naye mpe koboya kosangisa Ye.
Likonzí ya mitano: Kondima Mokolo ya Nsuka
Nzambe (Allah) Alobi:﴿اللَّهُ لَا إِلَهَ إِلَّا هُوَ لَيَجْمَعَنَّكُمْ إِلَى يَوْمِ الْقِيَامَةِ لَا رَيْبَ فِيهِ وَمَنْ أَصْدَقُ مِنَ اللَّهِ حَدِيثًا﴾ {Allah, nzambe mosusu azali te kaka Ye, akosangisa bino esika moko kino mokolo ya lisekwa, na ntina na yango tembe ezali te}.[An-Nisa: 87].
Kondima makasi na nionso oyo etali Mokolo ya Nsuka, oyo Nkolo na biso Mozwi-ya-Nguya-Nyonso ayebisaki biso na Buku na Ye ya lokumu to Ntoma na biso Muhammad - Nzambe apambola ye mpe apesa ye kimia - ayebisaka biso na ntina ya, liwa ya moto, lisekwa, Bolamuki, Na Intercession , Balance , Calcul, Paradis Na Lifelo, mpe makambo mosusu oyo etali Mokolo ya Nsuka.
Likonzí ya motoba: Kondima destin, bolamu na yango pe mabe na yango
Nzambe (Allah) Alobi:﴿إِنَّا كُلَّ شَيْءٍ خَلَقْنَاهُ بِقَدَرٍ﴾ {Ya solo, Tokelaki makambo nyonso na nzela ya mibeko (Destin)}.[Al-Qamar: 49].
Bondimi ete makambo manso mazali koyela bikelamu na mokili oyo, ezali na boyebi Na Puissance ya Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso mpe Eza na gestion Naye Moko, na molongani te, Na Destin wana eko mamaka liboso ya bokeli ya moto, mpe moto azali na bosepeli Na volonté ,Mpe asalaka misala na ye engebene na bosolo; Kasi nyonso wana ekweyi te libanda ya boyebi mpe mokano ya Nzambe.
Kondima destin etongami na nivo minei nayango:
Ya liboso: kondima boyebi Ya Nzambe oyo Esangisi makambo nyonso
Ya mibale: Kondima na bokomi (Destin) ya Nzambe ya nionso oyo ezali tii Mokolo ya Lisekwa.
Ya misato: Kondima na bolingo ya Nzambe oyo azali kosala malamu Na nguya ya kokoka, yango wana oyo nyonso alingi esalemaka mpe oyo alingi te esalemaka te.
Ya minei: Kondima ete Nzambe azali Mozalisi ya biloko nyonso mpe azali na moninga te na bozalisi na Ye.
Nayekola kosala ablution
Nzambe (Allah) Alobi:﴿إِنَّ اللَّهَ يُحِبُّ التَّوَّابِينَ وَيُحِبُّ الْمُتَطَهِّرِينَ﴾ {Ya solo, Nzambe alingaka baoyo babongoli motema mpe alingaka baoyo bamipetolaka}.[Al-Baqarah: 22].
Ntoma - Nzambe apambola ye pe apesa ye kimia - alobi :Ntoma, mabondeli ya Nzambe mpe kimia ezala likolo na ye, alobaki, “Oyo asali wudu (Ablution) lokola wudu oyo ya ngai, sima asambeli ba rak’ah mibale na kati na yango abebisi motema na ye moko te, Nzambe akolimbisa ye mpo na masumu na ye ya kala”
Moko ya ntina monene ya losambo ezali ete Nzambe apesaki mibeko ya bopeto liboso na yango, mpe asalaki yango kondima mpo na bosolo na yango ezali fungola ya losambo, mpe koyoka bizaleli malamu na yango esalaka ete motema ezala na mposa makasi ya kosala losambo,Ntoma - Nzambe apambola ye pe apesa ye kimia - alobi :(Bopeto ezali ndambo ya kondima...mpe losambo ezali muinda).
Ntoma - Nzambe apambola ye pe apesa ye kimia - alobi :(Oyo asali wudu (Ablution) mpe asali yango malamu, masumu na ye ekotika nzoto na ye).
Mosali azali komilakisa epai ya Nkolo na ye, apetolami na nzoto mpe na makanisi na kosalaka mosala oyo ya losambo, na bosembo epai ya Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, kolanda bokambi ya Ntoma, Nzambe apambola ye mpe apesa ye kimia.
Oyo esengeli mpo na ablution:
1- Losambo Nyonso, ezala ya obligatoire to volontaire (Sunna).
2-Kobaluka Al Qaaba (na maka).
3- Kosimba Coran.
Nasala wudu (Ablution) mpe nasukola (Janaba) na mai ya peto:
Mai ya peto ezali: mai nyonso oyo ekita na likoló to ebimaki na mabele mpe etikali ndenge ekelamaka na ebandeli, mpe moko te kati na bandimbola na yango misato, elingi koloba: langi,to elengi na yango, mpe nsolo, ebongwanaki na eloko moko te oyo elongolaka yango bopeto ya mai.
Nayekola kosala ablution
Etape 1 : Mokano (Nia) esika na yango ezali Na motema, mpe ndimbola ya mokano :Ezali Nia na motema mpo na kosala mosala ya losambo mpo na kopusana penepene na Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso.
Etape 2: Sukola maboko.
Etape 3: Kosukola monoko.
Kosukola monoko ezali: kokotisa mai na monoko, ko balusa balusa yango zingazinga, na nsima kobimisa yango.
Etape 4: Kopema mpema (Mai na zolo).
Kopema : oyo ezali kobenda mayi na pema tii na nsonge ya zolo.
Na nsima kobimisa mpema: oyo ezali kobimisa mucus mpe biloko mosusu na zolo elongo na mpema.
Etape 5: Sukola elongi.
Ndelo ya elongi:
Elongi: nini ebimisaka bokutani.
Bobele yango moko na bonene: kobanda na litoi tii na litoi.
Bolai yango moko: kati na nsinga ya nsuki ya motó (tête) oyo ezali na momeseno tii na nsuka ya nsuki ya motó.
Kosukola elongi esangisi nsuki nyonso,Ya suki ya pete, lokola pembe pe na Adhar.
Pembe Oyo eza na mokuwa ya favori (Adhar) na suka ya matoyi.
Adhar ezali: nsuki oyo ezali na mokuwa oyo ebimi, oyo ezali parallèle na libulu ya matoi, oyo ekendaka na kati ya motó, mpe oyo ekiti longwa na yango tii na nsonge ya matoi.
Ndenge moko mpe, kosukola elongi esangisi nsuki nyonso ya minene oyo emonanaka ya mandefu, elongo na nsuki nyonso oyo ekangami te.
Etape 6: Sukola maboko, kobanda na nsonge ya misapi tii na mokuwa (Coudes).
Ba coudes ezali na kati ya kosukola maboko obligatoire.
Etape 7: Kopangusa motó mobimba na maboko elongo na matoi mbala moko.
Abanda na liboso ya motó na ye, komata tii na nsima ya motó na ye, na nsima kozongisa bango nsima.
Atye misapi na ye ya index na matoyi na ye.
Apakolaka libándá ya matoi na ye na misapi na ye ya minene, mpe na ndenge yango, apangusi libándá mpe na kati ya litoi.
Etape 8: Kosukola makolo kobanda na ebandeli ya misapi ya makolo tii na mokuwa ya (Talons), mpe bitambi ezali na kati ya kosukola makolo oyo esengeli.
Bitambi ezali mikuwa mibale oyo ebimi na nse ya makolo (talons).
Ablution ebebaka na makambo oyo:
1. Oyo ebimaka na ba traktes mibale, lokola masuba, nye, mikinza, sperme, mpe madhiy.
2. Kolimwa ya makanisi na nzela ya pongi makasi, kolemba nzoto, kolangwa masanga, to liboma.
3. Biloko nyonso oyo esengaka ghusl kosokola, na ndakisa bosoto Janaba, komona sanza(Makila), mpe nsima ya kobota.
Soki moto amikitisi, asengeli kolongola bosoto yango ezala na mai ya peto, oyo eleki malamu, to na eloko mosusu oyo ezali mai ya peto te oyo elongolaka bosoto, na ndakisa mabanga, nkasa, bilamba mpe biloko mosusu ya ndenge wana, soki yango esalemi na misato to ba epangusi oyo epetolami mingi mpe eloko moko ya peto mpe oyo epesami nzela.
Kopangusa likolo ya ba chaussettes (khaufan) na ba chaussettes yakilo.
Soki bolati ba chaussettes (Khaufan)to ba chaussettes Yakilo, ezali possible ya kopangusa likolo na yango sans que osukola makolo, na ba conditions oyo elandi:
1. Esengeli kolata yango nsima ya kopetolama (Ablution) mobimba na bosoto ya mikemike mpe ya minene, oyo bosukolaki makolo Déjà.
2. Esengeli Ezala peto pe Ezala na salite ya (Najis) te.
3.Esengeli kopangusa na ngonga oyo elakisamaki Pona yango.
4. Esengeli Ezala Nakati ya mibeko, Ezala yakoyiba te,to kobotola.
Pantoufles (Khaufan) ezali: oyo balataka na makolo ya mposo ya nyama ya mikemike mpe biloko mosusu ya ndenge wana, mpe ndenge moko sapato oyo ezipaka makolo.
Chaussettes ezali : oyo moto alataka na makolo na ye ya elamba to ya ndenge wana, oyo eyebani na kombo ya (chaussettes).
Ntina oyo ezali na ndingisa ya kopangusa likolo ya ba chaussettes:
Mayele oyo ezali nsima ya kopangusa ba chaussettes ezali ya kosala ete ezala pete Na facile mpo na ba musulmans, mpo na bango ezali mpasi kolongola ba pantoufles to ba chaussettes mpe kosukola makolo, mingi mingi na tango ya Hiver mpe ya malili makasi, Na ntango bazali kosala mobembo.
Bolai yangonga nango Soki opangusi:
Mofandi : Ezuaka butu na moi (ngonga 24).
Mosali mobembo: ezuaka Mikolo misato mpe butu (ngonga 72).
Calcul ya période ya epangusi ebandi na epangusi ya liboso ya ba pantoufles (Khaufan) to ba chaussettes sima ya événement.
Ndenge ya kopangusa ba pantoufles (Khaufan)to ba chaussettes:
1. Salá ete maboko na yo ezala na mai.
2. Lekisa loboko likolo ya libanda ya makolo (kobanda na nsonge ya misapi tii na likoló ya makolo).
3. Makolo ya mobali epangusami na loboko ya mobali mpe lokolo ya mwasi epangusami na loboko ya mwasi.
Biloko Oyo Ebebisaka yango:
1. Oyo esengaka ghusl(Kosokola).
2. Nsuka yangonga nango.
Kosukola
Soki mobali to mwasi azali kosangisa nzoto, to mpe mai ya mobali ebimi na bango na mposa ntango azali kolamuka to kolala; Ezali obligatoire mpo na bango kosukola mpo na kozala na makoki ya kosala losambo to eloko nyonso oyo esengeli mpo na kopetolama Ndenge moko mpe soki mwasi apetolami na sanza mpe nsima ya kobota, asengeli naye kosokola Na wudu ya molulu liboso ete asala losambo to nyonso oyo esengeli mpo na kopetolama.
Façon ya kosukola ezali boye:
Musulman asengeli kozipa nzoto na ye mobimba na mayi na ndenge nionso, ata mpe kosukola monoko mpe zolo Soki azipi nzoto na ye na mayi, bosoto monene ekolongwa ye, mpe bopeto na ye ekozala mobimba.
Epekisami mpo na moto oyo azali na ezalela ya bosoto ya milulu kosala makambo oyo elandi kino akosukola :
01 Libondeli (Swalat).
02 Tawaf ya Kaaba kobaLuka yango.
03 Kotikala na mosquée, mpe ezali na ndingisa mpo na ye kokatisa kaka kozanga kotikala.
04 Kosimbá buku ya coran.
05 Kotanga Coran.
Tayammum (komipetola na mabele)
Soki musulman azwi mayi te oyo akomipetola na yango to azali na makoki te ya kosalela mayi mpo na bokono to makambo mosusu ya ndenge wana mpe azali kobanga ete akozanga tango ya losambo, wana asengeli kosala tayammum na mabele.
Recette ya likambo oyo ezali ya kobeta Mabele na maboko na ye mbala moko, sima kopangusa elongi na maboko na ye kaka na yango. Na Mabele Esengeli Ezala peto.
Tayammum azalaka invalide na makambo oyo:
1- Tayammum ebebaka na oyo ebebisaka ablution.
Soki mai ezuami to azui makoki ya Kosimba mai liboso ya kobanda losambo oyo bazalaki kosala tayammum mpo na yango
Nayekola kobondela (Swalat)
Nzambe asali obligatoire na musulman asala mabondeli mitano na mokolo : tongo, midi, sima ya midi, kolala ya moi, na pokwa. Motango ya ba raka’ah mpo na losambo ya tongo: raka’ah mibake, losambo ya midi: raka’ah minei, losambo ya nsima ya midi: raka’ah minei, losambo ya kolala ya moi: raka’a misato, mpe losambo ya mpokwa: raka minei
Namibongisa mpo na losambo
Soki tango ya losambo ebandi, musulman amipetola na bosoto ya moke mpe na bosoto ya monene, soki azui bosoto ya monene.
Bosoto munene ezali: oyo eza obliger musulman asokola.
Bosoto ya moke ezali: oyo esengaka musulman asala ablution.
Musulman abondelaka na bilamba ya peto na esika oyo ezali peto na bosoto te,pe azipaka nzoto naye.
Musulman asengeli komibongisa na bilamba oyo ebongi na tango ya losambo mpe azipa nzoto na ye na yango.
Mwasi asengeli kozipa nzoto mobimba na tango ya losambo longola se elongi mpe maboko.
Na tango ya losambo, musulman alobaka eloko mosusu te, Kaka maloba ya losambo, Pe ayokaka immamu, Na Atala tala te, na tango ya losambo na ye Soki azali na makoki te ya koyeba maloba ya losambo, akumisa kaka Nzambe, tii ndenge losambo ekosila, mpe asengeli kozwa likambo ya liboso mpo na koyekola losambo mpe maloba na yango.
Nayekola kobondela (Swalat)
Etape 1: Mokano (Nia) ezali mpo na devoir oyo nalingi kosala, mpe esika na yango ezali na motema.
Nsima ya kosala wudu, natala Qiblah mpe nasambelaka na kotelema soki nazali na makoki ya kosala yango.
Etape 2: Natomboli maboko na ngai na bonene ya mapeka mpe nalobi: (Allahu Akbar) na mokano ya kokota na losambo.
Etape 3: Tanga libondeli ya kofongola losambo, ndenge elobami, bakisa mpe koloba:(Subbhânaka l-lâhumma wa bi-hamdika, wa tabâraka smuka wa ta’âla jadduka, wa lâ ilâha ghayruka).
Etape 4: Naluki ekimelo epai ya Nzambe Pona Satana alakelami mabe, yango wana nalobi:(A’ûdhu bi-l-lâhi mina sh-shaytwâni r-rajîm).
Etape 5 : Tanga Surah Al-Fatihah na rak’ah nionso, oyo ezali :﴿بسْمِ اللَّهِ الرَّحْمَنِ الرَّحِيمِ (1) {Bismi llaahi rrahmaani rrahiim [1]الْحَمْدُ لِلَّهِ رَبِّ الْعَالَمِينَ (2) Alhamdu lillahi rabbil AAalamiina [2]الرَّحْمَنِ الرَّحِيمِ (3) Arrahmâani rrahiim [3]مَالِكِ يَوْمِ الدِّينِ (4) Maaliki yawmi ddiin [4]إِيَّاكَ نَعْبُدُ وَإِيَّاكَ نَسْتَعِينُ (5) Iyyaaka naAAbudu wa iyyaaka nasta-ï'iin [5]اهْدِنَا الصِّرَاطَ الْمُسْتَقِيمَ (6) Ihdina sswiraatwa lmustaqiim [6]صِرَاطَ الَّذِينَ أَنْعَمْتَ عَلَيْهِمْ غَيْرِ الْمَغْضُوبِ عَلَيْهِمْ وَلَا الضَّالِّينَ(7)﴾. Swiratwa lladhiina an-a'mta A'layhim ghayri lmagh-dhubi A'layhim wala ddhwaaalliin}[7].
Sima ya Al-Fatihah, tanga surat nakati ya Coran ndenge okoki, na rak’ah ya liboso mpe ya mibale ya losambo moko na moko Yango ezali obligatoire te, kasi kosala yango ezali lifuti monene.
Etape 6 : Nalobi : (Allahu Akbar), sima nafukama tiii mokongo na ngai ekozala plat mpe maboko na ngai ekozala na mabolongo na ngai na misapi epalangani, sima nalobi tango nazali kofukama: ( Subhâna rabbiya-l-’azîm). (3)
Etape 7 : Natelemi na rukuh nakoloba: (Sami’a l-lâhu liman hamidah.) natomboli maboko na ngai na nivo ya mapeka na ngai, pe tango nzoto na ngai ezali semba pe etelemi, nalobi : (Rabbanâ wa laka-l-hamdu).
Etape 8: Nalobi: (Allahu Akbar) mpe nafukami na maboko, na mabolongo, na makolo, na elongi, mpe na zolo, mpe nalobi na kofukama na ngai: (Subhâna rabbiya-l-a’lâ. (3)
Etape 9 : Nalobi : (Allahu Akbar) mpe natelemi na kofukama tiii nakozala na mokongo ya semba, nakofanda na lokolo ya mwasi mpe natelemisi lokolo ya mobali, mpe nalobi: (Rabbi ghfir lî !).
Etape 10: Nalobi: (Allahu Akbar) mpe nafukami lisusu lokola kofukama ya liboso.
Etape 11: Natelemi na sujud, nalobi: (Allahu Akbar) kino nakotelema semba, mpe nasala ndenge moko na ba rak’ah oyo etikali ya losambo ndenge nasalaki na rak’ah ya liboso.
Nsima ya raka’ah ya mibale ya losambo ya midi, ya nsima ya midi, ya kolala ya moi mpe ya mpokwa, nafandi mpo na kotanga tashahhud (Tahiyatu)ya liboso, oyo ezali:At-tahiyyâtu li-l-lâhi, wa s-salawâtu wa t-tayyibâtu. As-salâmu ’alayka ayyuhâ n-nabiyyu wa rahmatu l-lâhi wa barakâtuhu. As-salâmu ’alaynâ wa ’alâ ’ibâdi l-lâhi s-sâlihîna. Ash-hadu an lâ ilâha illâ l-lâhu, wa ash-hadu anna Muhammadan ’abduhu wa rasûluhu.Sima na telemi pona raka'ah ya misatu sima na yango.
Sima ya rak’ah ya suka ya losambo moko na moko, vanda po otanga tashahhud (Tahiyatu) ya suka, oyo ezali :At-tahiyyâtu li-l-lâhi, wa s-salawâtu wa t-tayyibâtu. As-salâmu ’alayka ayyuhâ n-nabiyyu wa rahmatu l-lâhi wa barakâtuhu. As-salâmu ’alaynâ wa ’alâ ’ibâdi l-lâhi s-sâlihîna. Ash-hadu an lâ ilâha illâ l-lâhu, wa ash-hadu anna Muhammadan ’abduhu wa rasûluhu.Allâhumma salli ’alâ Muhammadin wa ’alâ âli Muhammadin kamâ sallayta ’alâ Ibrâhîma wa ’alâ âli Ibrâhîma.innaka hamîdun, majîd Allâhumma bârik ’alâ Muhammadin wa ’alâ âli Muhammadin kamâ bârakta ’alâ Ibrâhîma wa ’alâ âli Ibrâhîma. innaka hamîdun, majîd.
Etape 12 : Sima na yango, nalobi salaam na droite na ngai nalobi : (As-Salām ālaikum warahmatullah) pe nalobi salaam na gauche na ngai nalobi : (As-Salām ālaikum warahmatullah ), na intention ya kobima na losambo, mpe boye nde na silisi losambo.
Hijab ya Mwasi ya musulman
Nzambe (Allah) Alobi:﴿يَا أَيُّهَا النَّبِيُّ قُلْ لِأَزْوَاجِكَ وَبَنَاتِكَ وَنِسَاءِ الْمُؤْمِنِينَ يُدْنِينَ عَلَيْهِنَّ مِنْ جَلَابِيبِهِنَّ ذَلِكَ أَدْنَى أَنْ يُعْرَفْنَ فَلَا يُؤْذَيْنَ وَكَانَ اللَّهُ غَفُورًا رَحِيمًا﴾ {eh Ntoma loba na basi nayo Mpe na bana nayo ya basi, na basi ya bandimi ete: bakitisa Mpe balata kitambala na bango ya monene, wana Ezali mpo ete bayebana mpo ba tungisama te, ya solo Allah azali molimbisi atonda ngolu}.[Al Ahzaab: 59].
Nzambe asali obligatoire na muasi musulman alata hijab pe azipa ba parties privées na ye pe nzoto na ye mobimba na mibali oyo bazali mahram te na kosalela bilamba ya momesano na mboka na ye Ezali permis te pona ye alongola hijab na ye sauf liboso na ye mobali to ba mahrams, oyo bazali baye mwasi musulman azali na ndingisa te ya kobala libela, mpe bazali:(Tata, ata soki mwana azali na likoló ndenge nini, ata na nse ndenge nini, bayaya ya tata, ndeko mobali, mwana ya ndeko mobali, mwana ya ndeko mwasi, mobali ya mama soki asilisi libala elongo na ye, tata ya mobali, ata moke te ndenge nini likoló, mwana ya mobali, ata soki azali na nse ndenge nini, mobali ya mwana mwasi, mpe oyo epekisami na molongo ya bankoko epekisami komelisa bana mabele)
Basi ya Ba musulmans batosaka mibeko mingi na bilamba na bango:
Ya liboso: Efinika nzoto mobimba.
Ya mibale: Esengeli te kozala eloko oyo mwasi alataka mpo na komikembisa(kobipe mibali) na yango.
Ya misato: Esengeli te Ezala polele, komonisa nzoto na ye.
Ya minei: Esengeli kozala ya kokangama te mpe ya makasi te, oyo ezali kolimbola (kolakisa) eteni moko ya nzoto na ye.
Ya mitano: Esengeli te kozala na malasi ya solo makasi.
Ya motoba: Esengeli te kokokana na bilamba ya mobali.
Ya nsambo: Esengeli te kokokana na elamba ya basi oyo bazali Bamizilma te na ntango ya losambo to bafeti na bango.
Moko ya bizaleli ya mondimi
Nzambe (Allah) Alobi:﴿إِنَّمَا الْمُؤْمِنُونَ الَّذِينَ إِذَا ذُكِرَ اللَّهُ وَجِلَتْ قُلُوبُهُمْ وَإِذَا تُلِيَتْ عَلَيْهِمْ آيَاتُهُ زَادَتْهُمْ إِيمَانًا وَعَلَى رَبِّهِمْ يَتَوَكَّلُونَ﴾ {Bandimi bazali kaka baye, tango balobeli Allah, bazali kobanga na mitema na bango, mpe tango ba versets na ye etangami epayi na bango, yango ebakisaka bango kondima, mpe na Nkolo na bango nde batiaka elikia na bango}.[Al-Anfal: 2].
Azali sembo na elobeli na ye mpe akosaka te.
Akokisaka liyokani mpe elaka naye.
Azalaka kopanzana te na koswana.
Akokisaka elikya.
Alingaka pona ndeko na ye musulman oyo alingaka pona ye moko.
- akabaka
Asalelaka bato malamu mingi.
- Akangisaka bondeko.
- Asekaka na mokano ya Nzambe, apesaka Ye matondo na tango ya bomengo, mpe azali na motema molai na tango ya mpasi.
Azalaka na bizaleli ya soni.
-Ayokelaka bi kelama mawa.
Motema na ye ezalaka na kimia na bato ya pembeni naye, azalaka na kande na bango te.
Alimbisaka bato.
Alyaka Riba (Eloko yamabe) te mpe asalelaka yango te.
- Asalaka ekobo te.
Amelaka masanga te.
Asalaka malamu epai ya ba voisins naye.
Asalaka zulma (injustice) te na trahison te.
Ayibaka te na akosaka te.
-Azali na mokumba (lisungi) epai ya baboti na ye, ata soki bazali ba musulmans te, mpe atosaka bango na oyo ezali malamu.
Abokolaka bana na ye na bizaleli malamu, apesaka bango mitindo ete básala misala ya mibeko, mpe apekisaka bango kosala mabe na makambo oyo epekisami.
- Azuaka Exemple na misala ya ba non musulmans te na bizaleli mpe mimeseno na bango ya lingomba te, oyo ezalaka bizaleli pe elembo na bango.
Esengo na ngai ezali na lingomba na ngai, Islam
Nzambe (Allah) Alobi:﴿مَنْ عَمِلَ صَالِحًا مِنْ ذَكَرٍ أَوْ أُنْثَى وَهُوَ مُؤْمِنٌ فَلَنُحْيِيَنَّهُ حَيَاةً طَيِّبَةً وَلَنَجْزِيَنَّهُمْ أَجْرَهُمْ بِأَحْسَنِ مَا كَانُوا يَعْمَلُونَ﴾ {Oyo azali kosala mosala ya malamu, ezala mobali to mwasi, mpe azali mondimi - Solo tokopesa ye bomoi ya malamu mpe tokopesa bango mbano na bango engebene na oyo eleki malamu na oyo bazalaki kosala}.[An-Nahl: 97].
Moko ya makambo minene oyo ememaka esengo, esengo, mpe esengo na motema ya musulman ezali boyokani na ye ya semba na Nkolo na ye, kozanga mosangani uta na bato ya bomoi, bakufi, to bikeko oyo alobelaki na Buku na Ye ya lokumu ete Ye azali ntango nyonso penepene na basaleli na Ye, koyokaka bango mpe koyanola na mabondeli na bango, lokola Mozwi-ya-Nguya-Nyonso alobaki:﴿وَإِذَا سَأَلَكَ عِبَادِي عَنِّي فَإِنِّي قَرِيبٌ أُجِيبُ دَعْوَةَ الدَّاعِ إِذَا دَعَانِ فَلْيَسْتَجِيبُوا لِي وَلْيُؤْمِنُوا بِي لَعَلَّهُمْ يَرْشُدُونَ﴾ {Mpe soki ba sali na Ngai batuni yo mpo na Ngai, nde nazali pene na koyanola, bosenga nabango, ntango bazali kobelela ngai, Na yango, tika bayanola Ngai mpe bandimela Ngai mpo ete bakoka kokambama.[Al-Baqarah: 186],Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso atindaki biso tosala (Dua)tosenga Ye, mpe akómisaki likambo oyo moko ya misala minene ya losambo oyo na nzela na yango musulman apusana penepene na Nkolo na ye, ndenge Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso alobaki:﴿وَقَالَ رَبُّكُمُ ادْعُونِي أَسْتَجِبْ لَكُمْ﴾ {Mpe Nkolo nabino Alobi: bosenga ngai, nakoyanola bino}[Ghafir: 60],Musulman malamu azali ntango nyonso na mposa ya Nkolo na ye, kobondelaka ntango nyonso liboso na Ye, mpe kopusana penepene na Ye na nzela ya misala ya losambo ya bosembo.
Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso akelaki biso na molongo oyo mpo na bwanya monene mpe akelaki biso mpamba te. Ezali pona tosambela Ye , na eloko mususu te, Apesaki mibeko mpo na biso lingomba ya mobimba, ya bonzambe oyo ebongisi makambo nyonso ya bomoi na biso ya moto ye moko mpe ya bato banso, Pe abatelaki bamposa ya bomoi, oyo ezali lingomba na biso, milimo na biso , lokumu na biso, makanisi na biso, mpe mbongo na biso, Oyo azali na bomoi na kolanda mitindo ya mibeko mpe kokima makambo oyo epekisami abatelaki bamposa wana mpe azali na bomoi ya esengo mpe ya kondimisa motema na ntembe te.
Bokangami ya musulman na Nkolo na ye elukaka kimia mawa ya motema, Mpe liyoki ya kimia, sécurité, mpe esengo,na koyoka bozali ya Nkolo, nkembo ezala na Ye, mpe bokebi mpe bobateli na Ye mpo na mosaleli na Ye ya sembo Mozwi-ya-Nguya-Nyonso alobi:﴿اللَّهُ وَلِيُّ الَّذِينَ آمَنُوا يُخْرِجُهُمْ مِنَ الظُّلُمَاتِ إِلَى النُّورِ﴾ {Allah azali Mobateli ya baye bandimi, abimisi bango na molili atie bango na lumière}.[Al-Baqarah: 257].
Boyokani monene boye,Ezali ezalela ya mayoki oyo ememaka na kosepela na losambo ya Ngɔlu koleka.Azali na mposa makasi ya kokutana na ye mpe azali kopumbwa na motema na ye na lola ya esengo na koyokaka elengi ya bondimi.
Elengi wana, esengo na yango ekoki kolimbolama kaka na baye bamekaki yango na kosala misala ya malamu mpe kokima misala ya mabe Yango wana Ntoma Muhammad - Nzambe apambola ye mpe apesa ye kimia - alobi:(Ye oyo asepeli na Nzambe lokola Nkolo na ye, Islam lokola lingomba na ye, mpe Muhammad lokola Ntoma na ye amekaki elengi ya kondima).
Ee, soki moto azali koyoka ete azali, ntango nyonso na maboko ya Mozalisi na ye, ayebi ye na bankombo mpe bizaleli na ye ya kitoko, asambeli ye lokola nde azali komona ye, azali na motema sembo na losambo ya Nzambe, mpe alukaka yango te kaka pona Nzambe, nkembo ezala epai na Ye, akozala na bomoi ya malamu mpe ya esengo na mokili oyo mpe nsuka ya malamu na nsima.
Ata mawa oyo ekómelaka mondimi na mokili oyo, molunge na yango ekendaka na malili ya bondimi, mpe bosepeli na mobeko ya Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, mpe kosanzola Ye mpo na nsuka na Ye nyonso, malamu mpe mabe, mpe bosepeli mobimba na yango.
Kati na makambo oyo musulman asengeli kozala na bokebi mpo na kobakisa esengo mpe bondimisi na ye ezali mbala na mbala kokanisa Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso mpe kotanga na ye Coran ya lokumu, lokola Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso alobi:﴿الَّذِينَ آمَنُوا وَتَطْمَئِنُّ قُلُوبُهُمْ بِذِكْرِ اللَّهِ أَلَا بِذِكْرِ اللَّهِ تَطْمَئِنُّ الْقُلُوبُ﴾ {Baoyo bandimi mpe mitema na bango ekitaka na Kotanga Nzambe kosala(Zikri), ya solo, na Zikri ya Nzambe, ekitisaka mitema}.[Al-Ra’ad: 28].Ntangu musulman azali kobakisa kosala Zikri ya nzambe mpe kotanga Coran mingi, boyokani na ye na Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso ekozala monene, molimo na ye ekozala peto mpe kondima na ye ekozala makasi.
Ndenge moko mpe, musulman asengeli kozala na mposa makasi ya koyekola makambo ya lingomba na ye na bisika ya solo mpo ete akoka kosambela Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, na bososoli Ntoma, Nzambe apambola ye mpe apesa ye kimia, alobi:(Koluka boyebi ezali obligatoire pona musulman nionso),Mpe kozala na botosi mpe kotosa mibeko ya Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso oyo akelaki ye, ata ayebi mayele na yango to te, lokola Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso alobaki na Buku na Ye ya lokumu:﴿وَمَا كَانَ لِمُؤْمِنٍ وَلَا مُؤْمِنَةٍ إِذَا قَضَى اللَّهُ وَرَسُولُهُ أَمْرًا أَنْ يَكُونَ لَهُمُ الْخِيَرَةُ مِنْ أَمْرِهِمْ وَمَنْ يَعْصِ اللَّهَ وَرَسُولَهُ فَقَدْ ضَلَّ ضَلَالًا مُبِينًا﴾ {Mpe ezali te mpo na mobali mondimi to mwasi mondimi, ntango Nzambe na Ntoma na Ye bazwi mokano ya likambo moko, kozala na boponi nyonso likolo ya likambo na bango, mpe oyo azangi botosi Nzambe na Ntoma na Ye, azali solo kobunga nzela Libunga ya polele}[Al-Ahzab: 36].
Tika ete mapamboli mpe kimia ya Nzambe ezala na Ntoma na biso Muhammad mpe libota na ye mpe baninga na ye banso.